18
Lingomba ya Masiya
Nani aleki monene ?
(Mlk 9.33-37; Lk 9.46-48)
Na tango wana, bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe batunaki Ye :
— Nani aleki monene kati na Bokonzi ya Likolo ?
Yesu abengaki mwana moko ya moke, atiaki ye na kati-kati na bango mpe alobaki :
— Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bobongwani te mpe bokomi te lokola bana mike, bokotikala kokota te na Bokonzi ya Likolo. Yango wana, moto nyonso oyo akomikitisa lokola mwana oyo, ye nde aleki monene kati na Bokonzi ya Likolo. Moto nyonso oyo, na Kombo na Ngai, akoyamba mwana lokola oyo, ayambi nde Ngai moko.
Makebisi
(Mlk 9.42-48; Lk 17.1-2)
Kasi soki moto moko akweyisi na masumu moko kati na bana mike oyo bandimelaka Ngai, ekoleka malamu mpo na ye kokanga ye libanga monene ya enikelo na kingo mpe kobwaka ye na ebale. Mawa na mokili, pamba te makambo oyo ekweyisaka bato kati na masumu ezali ebele ! Solo, makambo yango esengeli kaka kozala ; kasi mawa na moto oyo, na nzela na ye, makambo yango eyaka ! Soki loboko to lokolo na yo ekweyisaka yo na masumu, kata mpe bwaka yango mosika na yo ; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na loboko moko to na lokolo moko, na esika ete otikala na maboko mibale to makolo mibale mpe obwakama na moto ya libela na libela. Soki liso na yo ekweyisaka yo na masumu, longola yango mpe bwaka yango mosika na yo ; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na liso moko, na esika ete okoba kozala na miso mibale mpe obwakama na moto ya lifelo.
(Lk 15.1-7)
10  Bosala keba ete botiola ata moko te kati na bana oyo, pamba te nazali koloba na bino ete ba-anjelu na bango kuna na Likolo bamonaka tango nyonso elongi ya Tata na Ngai, oyo azali na Likolo.
Lisese ya meme oyo ebungi
(Lk 15.1-7)
[ 11  Pamba te Mwana na Moto ayaki mpo na kobikisa bato oyo babunga nzela.]* 12  Bokanisi nini ? Soki moto moko azali na bameme nkama moko, bongo moko kati na yango ebungi ; boni, akotika te bameme na ye tuku libwa na libwa na likolo ya ngomba mpo na kokende koluka moko oyo ewuti kobunga ? 13  Mpe soki amoni yango, nazali koloba na bino penza ya solo, esengo na ye mpo na meme wana ekoleka esengo mpo na bameme tuku libwa na libwa oyo ebungaki te. 14  Ndenge moko, Tata na bino oyo azali kati na Likolo alingi ete moko te kati na bana oyo abunga.
Ndenge nini kolimbisa ndeko oyo asali yo mabe
15  Soki ndeko na yo asali yo mabe, kende kotalisa ye mabe na ye na esika ya bino mibale kaka. Soki ayokeli yo, wana ozongisi ye na nzela malamu. 16  Kasi soki ayokeli yo te, mema moto mosusu to bato mibale, pamba te Bosolo ya likambo nyonso endimamaka na litatoli ya bato mibale to misato. 17  Kasi soki aboyi kaka koyokela bango, yebisa makambo yango na Lingomba. Soki aboyi mpe kaka koyokela Lingomba, zwa ye lokola mopagano mpe lokola mofutisi mpako.
18  Nazali koloba na bino penza ya solo : nyonso oyo bokokanga awa na mokili ekokangama mpe na Likolo, mpe nyonso oyo bokofungola awa na mokili ekofungwama mpe na Likolo.
19  Nazali lisusu koloba na bino penza ya solo : soki bato mibale kati na bino bayokani awa na mokili mpo na kosenga eloko songolo to pakala, Tata na Ngai oyo azali kati na Likolo akopesa bango yango. 20  Pamba te na esika oyo bato mibale to bato misato basangani na Kombo na Ngai, Ngai mpe nazali wana kati na bango.
21 Bongo Petelo apusanaki pene ya Yesu mpe atunaki :
— Nkolo, mbala boni nasengeli kolimbisa ndeko na ngai tango akosala ngai mabe ? Boni, kino mbala sambo ?
22 Yesu azongisaki :
— Nalobi na yo te kino mbala sambo, kasi kino mbala tuku sambo na sambo.
23  Yango wana, Bokonzi ya Likolo ekokani na mokonzi moko oyo alingaki kobongisa elongo na basali na ye makambo na ye ya misolo. 24  Tango abandaki, bamemelaki ye mosali moko oyo azalaki na niongo na ye ya batalanta nkoto zomi. 25  Lokola azalaki na eloko moko te mpo na kofuta, mokonzi na ye atindaki ete bateka ye, mwasi na ye, bana na ye mpe biloko na ye nyonso mpo ete niongo na ye efutama. 26  Kasi mosali yango amibwakaki na makolo ya mokonzi, agumbamaki liboso na ye mpe asengaki : « Yikela ngai mpiko, pamba te nakofuta yo niongo nyonso ! »
27  Mokonzi ya mosali ayokelaki ye mawa, alimbisaki niongo na ye mpe atikaki ye kokende. 28  Kasi tango mosali yango abimaki, akutanaki na moninga na ye ya mosala oyo adefaki epai na ye mbongo ya bibende nkama moko. Akangaki ye, akomaki kofinafina ye na kingo mpe alobaki na ye : « Futa niongo na ngai. »
29  Moninga na ye ya mosala afukamaki mpe asengaki na ye : « Yikela ngai mpiko, nakofuta yo niongo nyonso. »
30  Kasi ye aboyaki ; akendeki kosenga ete babwaka ye na boloko, kino tango akosilisa kofuta niongo nyonso. 31  Tango baninga na ye ya mosala bamonaki ndenge makambo elekaki, bayokaki mawa mingi mpe bakendeki koyebisa makambo nyonso epai ya mokonzi na bango. 32  Bongo mokonzi abengaki mosali wana mpe alobaki na ye : « Mosali mabe ! Ngai nalimbisaki yo niongo nyonso oyo ozalaki na yango epai na ngai, mpo ete osengaki ngai. 33  Boni, osengelaki te koyikela moninga na yo mpiko ndenge ngai nasalaki mpo na yo ? »
34  Lokola mokonzi na ye azalaki na kanda, akabaki ye na maboko ya banyokoli kino tango afutaki niongo nyonso.
35  Ezali ndenge wana nde Tata na Ngai ya Likolo akosala bino soki moko na moko kati na bino alimbisi te ndeko na ye, na motema na ye mobimba.
* 18:11 Eteni oyo ezali te na mikanda mosusu ya kala