Nzembo 10
Yawe, belema
Yawe, mpo na nini otelemi mosika ?
Mpo na nini obombami na tango ya pasi ?
 
Na lolendo na ye, moto mabe oyo akangami
na mabongisi na ye
anyokolaka mobola.
Pamba te moto mabe amikumisaka
na tina na posa makasi ya motema na ye,
apambolaka moto oyo azali na lokoso
mpe afingaka Yawe.
Na lolendo na ye, moto mabe alobaka : « Nzambe azalaka te. »
Kati na makanisi na ye nyonso, ezali na esika te mpo na Nzambe.
Misala na ye ekendeke liboso tango nyonso,
asalaka keba te na mikano na Yo, Yawe ;
atiolaka banguna na ye nyonso.
Amilobelaka :
« Eloko moko te ekotikala kolengisa ngai. »
Alapaka ndayi boye :
« Moko te akotikala kosala ngai mabe. »
 
Monoko na ye etonda na bilakeli mabe,
lokuta mpe mangungu ;
abongisaka kaka pasi mpe mabe.
Abombamaka pene ya bamboka.
Wuta na bisika oyo abombamaka,
abomaka moto oyo asali mabe te.
Miso na ye ezelaka na kobombama bato ya koboma.
Abombamaka lokola nkosi kati na evandelo na yango,
abombamaka mpo na kokanga moto oyo azangi nguya ;
akangaka moto oyo azangi nguya
na kotindika ye pembeni ya motambo.
10 Agumbaka ye mpe avandisaka ye na mabele,
mpe akweyaka na se ya bokonzi na ye.
11 Amilobelaka :
« Nzambe akotikala koyeba te,
abombaka elongi na Ye mpe akotikala komona te. »
 
12 Oh Yawe, telema.
Nzambe, sembola loboko na Yo,
kanisa babola.
13 Mpo na nini moto mabe afinga Nzambe ?
Mpo na nini amilobela :
« Nzambe akopesa ngai etumbu te ? »
14 Pamba te, Yo Nzambe, omoni pasi ya banyokolami ;
otalaka pasi na bango
mpe ozwaka yango kati na loboko na Yo.
Banyokolami bamipesaka epai na Yo
oyo osungaka bana bitike.
15 Bebisa nguya ya moto mabe,
pesa moto ya misala mabe etumbu
mpo na mabe na ye,
mpo ete emonana lisusu te.
 
16 Yawe azali Mokonzi mpo na seko,
bapagano bakozala lisusu te kati na mokili na Ye.
17 Yawe, oyokaka posa ya banyokolami,
olendisaka bango,
mpe oyokaka koganga na bango,
18 mpo na kolongisa mwana etike mpe monyokolami ;
boye, bato ya mokili bakobangisa lisusu te.