Nzembo 9
Nzambe akataka makambo
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.
Nakosanzola Yawe na motema na ngai mobimba,
nakotatola misala minene na Yo nyonso.
Nakozala na esengo mpe nakosepela kati na Yo,
nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo-Oyo-Oleki-Likolo.
 
Banguna na ngai bazongaka sima,
bakweyaka mpe balimwaka liboso na Yo.
Pamba te, okataki likambo na ngai
mpe olongisaki ngai,
ovandi na Kiti ya Bokonzi
lokola Mosambisi ya sembo.
Opamelaki bikolo mpe obomaki moto mabe,
olimwisaki kombo na bango mpo na libela.
Banguna na ngai balimwa mpo na libela ;
opanzaki bingumba na bango
kino bakanisa bango lisusu te.
 
Yawe akonzaka mpo na libela,
atia Kiti na Ye ya Bokonzi
mpo na kokata makambo ya bato.
Akonzaka mokili na bosembo,
akataka makambo ya bato na alima.
10 Yawe azali ebombamelo
mpo na bato oyo bazali konyokolama,
mpe ndako makasi mpo na tango ya pasi.
11 Bato oyo bayebi Kombo na Yo
batiaka elikya na bango kati na Yo ;
pamba te, Yo Yawe,
osundolaka te bato oyo balukaka Yo.
 
12 Boyembela Yawe oyo avandaka kati na Siona
banzembo ya masanzoli ;
bopanza sango ya misala na Ye kati na bikolo.
13 Pamba te Yawe azongisaka mabe na mabe
mpo na makila oyo esopani,
akanisaka koganga ya banyokolami.
 
14 Yawe, yokela ngai mawa,
tala ndenge nini bayini na ngai
bazali konyokola ngai,
mpe kangola ngai wuta na bikuke ya kufa ;
15 mpo ete napanza sango ya lokumu na Yo
kati na bikuke ya Siona, mboka kitoko,
mpe nasepela na lobiko na Yo kuna.
 
16 Bapagano bakweyi na libulu
oyo batimolaki,
makolo na bango ekangami na mitambo
oyo bango moko basalaki.
17 Yawe amilakisi
na nzela ya misala na Ye ya bosembo ;
bato mabe bakangami
na mitambo oyo bango moko basalaki.
18 Bato mabe, bikolo nyonso,
oyo bakanisaka Nzambe te,
bakokende na mboka ya bakufi.
19 Kasi Nzambe akotikala te kobosana mobola,
mpe elikya ya banyokolami ekotikala seko na seko.
 
20 Yawe, telema ! Tika ete moto alonga te ;
tika ete bapagano basamba liboso na Yo !
21 Yawe, tika ete somo ekanga bango ;
tika ete bapagano bayeba ete bazali na bango kaka bato !