Nzembo 11
Ebombamelo ya solo
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.
Kati na Yawe, nazali koluka ebombamelo.
Ndenge nini bokoka koloba na ngai :
« Kimela na ngomba na bino lokola ndeke ? »
Pamba te, tala, bato mabe babendaka batolotolo na bango,
batiaka bambanzi na bango na singa
mpo na kobamba yango longwa na molili
bato oyo bazali na mitema sembo.
Soki miboko ebukani,
moto ya sembo akoki kosala nini ?
 
Yawe azali kati na Tempelo na Ye ya bule ;
Yawe avandi na Kiti na Ye ya Bokonzi kati na Lola.
Azali kotala bato nyonso ;
mpe miso na Ye ezali kososola mozindo
ya mitema na bango.
Yawe atalaka mozindo ya moto ya sembo,
kasi ayinaka makasi moto mabe
elongo na moto oyo asepelaka na mobulu.
Tika ete akweyisela bato mabe
makala ya moto, sofolo ya moto !
Mpe mopepe ya moto ekozala libula na bango.
 
Pamba te Yawe azali sembo,
alingaka bosembo.
Bato ya sembo bakomona elongi na Ye.