Nzembo 106
Soki tozangi boyengebene, Nzambe azali kaka Moyengebene
Bokumisa Yawe !
 
Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu,
bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !
Nani akoloba misala minene ya Yawe ?
Nani akopanza sango ya lokumu na Ye nyonso ?
 
Esengo na bato oyo babatelaka mibeko
mpe batambolaka na bosembo !
 
Yawe, kanisa ngai
tango okotalisa ngolu na Yo epai ya bato na Yo !
Salela ngai bolamu na nzela ya lobiko na Yo,
mpo ete namona esengo ya baponami na Yo,
nasepela na bolamu ya ekolo na Yo
mpe nasepela elongo na libula na Yo !
 
Solo, tosalaki masumu lokola batata na biso,
tosalaki mabe mpe tomemaki ngambo.
Tango batata na biso bazalaki na Ejipito,
basosolaki eloko moko te kati na bikamwa na Yo ;
babosanaki noki misala malamu na Yo,
batombokaki pembeni ya ebale monene, ebale monene ya Barozo.
 
Kasi abikisaki bango mpo na lokumu ya Kombo na Ye,
mpo na kotalisa nguya na Ye.
Agangelaki ebale monene ya Barozo, mpe ekawuki ;
atambolisaki bango kati na mozindo
lokola na esobe.
10 Abikisaki bango
wuta na maboko ya bayini na bango,
akangolaki bango
wuta na maboko ya monguna.
11 Mayi ezipaki banguna na bango,
moko te atikalaki na bomoi.
12 Bato na Ye bandimelaki maloba na Ye
mpe bayembaki masanzoli na Ye.
13 Kasi babosanaki noki misala na Ye,
bazelaki te kokokisama ya mabongisi na Ye.
14 Kati na esobe, bamipesaki na bilulela,
bamekaki Nzambe kati na mabele
oyo ezali na bato te.
15 Apesaki bango biloko oyo bazalaki kosenga,
kasi atindelaki bango lisusu pasi.
 
16 Kati na molako, basalaki zuwa,
batelemelaki Moyize mpe Aron, mosantu ya Yawe.
17 Mabele efungwamaki mpe emelaki Datani,
ezipaki lisanga ya Abirami.
18 Moto ezikisaki lisanga na bango
mpe etumbaki bato mabe wana nyonso.
19 Na Orebi, basalaki mwana ngombe,
bafukamelaki nzambe ya ekeko basala na ebende
oyo banyangwisa na moto.
20 Babongolaki Nzambe na bango ya nkembo
elilingi ya ngombe oyo eliaka matiti.
21 Babosanaki Nzambe, Mobikisi na bango,
oyo asalaki makambo minene kati na Ejipito,
22 bikamwa kati na mokili ya Cham
mpe misala ya somo na ebale monene ya Barozo.
 
23 Azwaki mokano ya koboma bango nyonso.
Kasi Moyize, moponami na Ye, atelemaki liboso na Ye
mpo na kobondela ete akitisa kanda na Ye mpe aboma te.
 
24 Batiolaki mboka kitoko
mpo ete bandimelaki maloba na Ye te.
25 Bayimaki-yimaki kati na bandako na bango ya kapo,
batosaki mongongo ya Yawe te.
 
26 Asembolaki loboko, alapaki ndayi
ya koboma bango kati na esobe,
27 ya kopanza bakitani na bango kati na bikolo mosusu
mpe ya koboma bango kati na mikili nyonso.
28 Bamitiaki na se ya ekangiseli ya Bala ya Peori,
baliaki bambeka oyo epesamaki
epai ya banzambe oyo ekufa.
29 Batumbolaki kanda ya Yawe
na nzela ya misala na bango ya mabe,
mpe pasi makasi ekotaki kati na bongo.
 
30 Kasi Pineasi atelemaki, akataki makambo,
mpe pasi yango esilaki.
31 Mpo na yango, Pineasi atangamaki
lokola moto ya sembo
mpo na bikeke nyonso, seko na seko.
 
32 Bapesaki Nzambe kanda pene ya mayi ya Meriba
mpe bamemisaki Moyize ngambo.
33 Mpo ete batombokelaki Molimo ya Nzambe,
Moyize akomaki koloba maloba oyo esengeli te.
 
34 Babebisaki te bikolo
oyo Yawe ayebisaki bango,
35 kasi basanganaki elongo na bapagano
mpe bayekolaki bokoko ya bikolo na bango.
36 Bagumbamelaki banzambe na bango ya bikeko
oyo ekomaki motambo mpo na bango.
37 Bapesaki bana na bango lokola bambeka
epai ya milimo mabe.
38 Basopaki makila ya bato oyo basalaki mabe te,
makila ya bana na bango,
oyo bapesaki lokola mbeka
epai ya banzambe ya bikeko ya Kanana.
Boye mboka ekomaki mbindo
mpo na makila ya bato.
39 Bamikomisaki mbindo
mpe babebisaki lokumu na bango
na nzela ya misala na bango.
40 Yawe asilikelaki bato na Ye,
ayinaki libula na Ye.
41 Akabaki bango na maboko ya bikolo ya bapaya,
mpe banguna na bango bakomaki kokonza bango ;
42 banguna na bango banyokolaki bango
mpe batiaki bango na se ya bokonzi na bango.
 
43 Akangolaki bango bambala ebele,
kasi bazalaki kaka kosala mabongisi ya kotomboka
mpe ya komipesa na bambeba na bango.
44 Yawe amonaki pasi na bango,
tango ayokaki koganga na bango.
45 Akanisaki Boyokani oyo asalaki elongo na bango ;
mpe mpo na bolingo monene na Ye,
abongolaki mokano na Ye ya komonisa bango pasi.
46 Asalaki ete bato nyonso
oyo bakomisaki bango bawumbu
bayokela bango mawa.
 
47 Yawe, Nzambe na biso, bikisa biso !
Sangisa biso wuta na bikolo mosusu
mpo ete tosanzola Kombo na Yo ya bule
mpe tosepela na mosala ya kokumisa Yo.
 
48 Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele,
apambolama seko na seko !
 
Tika ete bato nyonso baloba :
« Amen ! »
 
Bokumisa Yawe !