Nzembo 112
Bolamu ya bayengebene
Bokumisa Yawe !
 
Esengo na moto oyo atosaka Yawe
mpe asepelaka makasi na mibeko na Ye.
 
Bana na ye bakozala bato na nguya
kati na mokili ;
ekeke ya bato ya sembo ekopambolama.
Ndako na ye ezali na bokolongono
mpe na bomengo,
mpe bosembo na ye ewumelaka mpo na seko.
Pole engengaka kati na molili
mpo na bato ya alima,
mpo na moto oyo alimbisaka baninga,
ayokelaka bato mawa mpe azali sembo.
Esengo na moto oyo
ayokelaka bato mawa mpe adefisaka,
mpe asalaka misala na ye kolanda bosembo.
 
Solo, aninganaka ata moke te.
Bakanisaka misala ya moto ya sembo tango nyonso.
Abangaka basango ya mabe te ;
motema na ye ezali na kimia,
atiaka elikya na ye kati na Yawe.
Motema na ye eninganaka te,
abangaka te kino akomona banguna na ye
kozwa etumbu.
Akabelaka babola na motema ya esengo ;
bosembo na ye ewumelaka libela na libela,
lokumu na ye ekitaka te.
 
10 Moto mabe amonaka yango
mpe asilikaka na zuwa,
aliaka minu mpe alembaka nzoto.
Posa ya bato mabe elimwaka.