Nzembo 113
Moko te akokani na Nzambe
Bokumisa Yawe !
 
Bino basali ya Yawe, bokumisa Ye ;
bokumisa Yawe !
Tika ete Kombo ya Yawe epambolama
kobanda sik’oyo kino libela na libela !
Longwa na este kino na weste,
tika ete Kombo ya Yawe epambolama !
 
Yawe azali na likolo ya bikolo nyonso,
nkembo na Ye ezali na likolo koleka Lola.
Nani akokani na Yawe, Nzambe na biso,
oyo avandi na Kiti ya Bokonzi
kati na bisika oyo eleki likolo ?
Agumbamaka mpo na kotala
likolo mpe mokili.
 
Wuta na putulu, atombolaka
moto oyo akelela ;
wuta na fulu ya matiti,
abimisaka mobola
mpo na kovandisa ye esika moko na bakambi,
na bankumu ya bato na Ye.
Avandisaka mwasi ekomba kati na ndako na ye,
lokola mama ya esengo kati na bana na ye.
 
Bokumisa Yawe !