Nzembo 126
Tango ya kolona mpe tango ya kobuka
Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.
Tango Yawe azongisaki bato ya Siona
longwa na bowumbu,
tozalaki lokola bato oyo bazali kolota ndoto.
Boye, tozalaki koganga mpe koyemba na esengo.
Bongo, maloba oyo ekomaki kolobama kati na bikolo :
« Yawe asaleli bango makambo minene ! »
Solo, Yawe asaleli biso makambo minene,
mpe tozali kosepela.
 
Yawe, yaka kobongisa makambo na biso
ndenge kaka otondisaka lisusu miluka ya Negevi.
 
Bato oyo balonaka na mpinzoli
babukaka na banzembo ya esengo.
Moto oyo akendaka na kolela,
tango amemi milona na ye,
azongaka na esengo
wana amemi maboke na ye.