Nzembo 127
Nani asalaka nyonso
Nzembo ya Salomo. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.
Soki Yawe atongi ndako te,
batongi ndako bazali kosala mosala ya pamba ;
soki Yawe akengeli engumba te,
bakengeli bazali kosala na pamba.
Ezali na pamba nde, bino mpe,
bolamukaka na tongo makasi,
bolalaka noki te mpe bosalaka makasi
mpo na kozwa bilei ;
pamba te Nzambe apesaka bilei yango
kaka na balingami na Ye,
wana bazali nanu kolala pongi.
 
Bana bazali libula kowuta na Yawe,
mpe kobota bana ezali lifuti.
Ndenge makonga ezali kati na maboko ya mobundi bitumba,
ndenge wana mpe bana oyo moto aboti
na bolenge na ye bazali.
Esengo na moto oyo atondisi makonga
kati na ebombelo na ye ya makonga !
Akokufa soni ata moke te
tango akosamba elongo na banguna na ye
na ekuke ya engumba.