Nzembo 128
Tika ete Yawe apambola yo
Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.
Esengo na moto oyo atosaka Yawe
mpe alandaka banzela na Ye !
Oliaka mbuma ya mosala na Yo ;
ozali moto ya esengo mpe ozali na bofuluki.
Kati na ndako na yo,
mwasi na yo azali lokola nzete ya vino
oyo ebotaka bambuma ebele ;
bana na yo bazali lokola bankona ya nzete ya olive
zingazinga ya mesa na yo.
Ezali ndenge wana nde Yawe apambolaka
moto oyo atosaka Ye.
 
Solo, Yawe akopambola yo wuta na Siona,
mpe okomona bofuluki ya Yelusalemi
mikolo nyonso ya bomoi na yo
mpe okomona bakitani na yo.
 
Tika ete kimia ezala na Isalaele !