Nzembo 129
Banyokoli ngai mingi, kasi nalembi te
Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.
Wuta bolenge na ngai, banyokoli ngai bambala ebele.
Tika ete Isalaele ezongela koloba :
« Wuta bolenge na ngai, banyokoli ngai bambala ebele,
kasi batikali kolonga ngai te ! »
 
Bato mabe batimoli mokongo na ngai,
bazokisi ngai bapota ya banzela milayi na mokongo.
Kasi lokola Yawe azali sembo,
akati basinga ya bato mabe.
 
Tika ete bato nyonso oyo bayinaka Siona
bakufa soni mpe bazonga sima !
Tika ete bakoma lokola matiti
oyo ebotaka na likolo ya ndako
mpe ekawukaka liboso ete balongola yango ;
tika ete mobuki bambuma ya bilanga
atondisa na yango te maboko na ye,
tika ete mokangi maboke ya banzete atondisa
na yango te saki na ye.
Tika ete baleki nzela baloba na bango te :
« Tika ete Yawe apambola bino ! »
 
Topamboli bino na Kombo na Yawe !