Nzembo 33
Nzambe Mokeli mpe Mobikisi
Bino bato ya sembo, bobeta milolo ya esengo na tina na Yawe !
Kokumisa Nzambe ebongi na bato oyo bazali alima.
Bosanzola Yawe na nzenze,
bosanzola Ye na lindanda ya basinga zomi.
Boyembela Yawe nzembo ya sika,
bobetisa bibetelo mindule elongo na koganga ya esengo.
 
Pamba te Liloba na Yawe ezali alima,
misala na Ye nyonso ekokisamaka na boyengebene.
Yawe alingaka bosembo mpe alima ;
mokili etondi na bolingo na Ye.
Likolo ekelamaki na Liloba na Yawe ;
mampinga na yango nyonso,
na nzela ya pema ya monoko na Ye.
Asangisaka mayi ya bibale minene esika moko,
mpe atiaka yango na bisika ya mozindo.
Tika ete mokili mobimba etosa Yawe !
Tika ete bavandi nyonso ya mokili balenga liboso na Ye.
Pamba te alobaki, mpe likambo esalemaki ;
mpe apesaki mitindo, mpe emonanaki.
 
10 Yawe akweyisaka mikano ya bikolo,
abebisaka mabongisi ya bato.
11 Kasi mikano ya Yawe etikalaka mpo na seko,
mabongisi ya motema na Ye, mpo na bikeke nyonso.
 
12 Esengo na ekolo oyo Yawe azali Nzambe na yango.
Esengo na bato oyo aponaki mpo na libula na Ye.
13 Yawe atalaka wuta na likolo,
amonaka bana nyonso ya bato.
14 Wuta na evandelo na Ye,
atalaka bavandi nyonso ya mokili.
15 Ye oyo asalaka mitema nyonso ya bato
asosolaka makambo nyonso oyo basalaka.
 
16 Ezali te limpinga monene nde ebikisaka mokonzi
to nguya monene nde ekangolaka elombe.
17 Mpunda ezali na nguya te ya kopesa lobiko,
makasi na yango nyonso ekangolaka te.
18 Nzokande Yawe atalaka bato oyo batosaka Ye,
ba-oyo batiaka elikya na bolingo kati na Ye,
19 mpo na kokangola bango na kufa
mpe kobatela bango na bomoi
ata na tango ya nzala makasi.
 
20 Totielaka Yawe motema ;
azali lisungi mpe nguba na biso.
21 Solo, mitema na biso esepelaka kati na Ye,
pamba te totiaka elikya na biso
kati na Kombo na Ye ya bule.
22 Yawe, lokola totiaka elikya na biso kati na Yo,
tika ete bolingo na Yo ezala elongo na biso.