Nzembo 34
Yawe, mokangoli na ngai
Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango akosanaki liboma liboso ya Abimeleki oyo abenganaki ye, mpe akendeki.
Nakopambola Yawe tango nyonso,
nakokumisa Ye mikolo nyonso na bibebu na ngai.
Tika ete bomoi na ngai emikumisa kati na Yawe ;
tika ete banyokolami bayoka mpe basepela !
Boya kosakola elongo na ngai
ete Yawe azali monene !
Tonetola Kombo na Ye, biso nyonso.
 
Nalukaki Yawe, mpe ayanolaki ngai ;
akangolaki ngai na somo na ngai nyonso.
Bato oyo batalaka epai na Ye bangengaka na esengo,
mpe bayokisamaka soni ata moke te.
Mobola agangaki, mpe Yawe ayokaka ye ;
abikisaki ye na pasi na ye nyonso.
Anjelu ya Yawe atongaka molako na ye
zingazinga ya bato oyo batosaka Yawe,
mpe akangolaka bango.
 
Bomeka elengi mpe botala
ndenge nini Yawe azali malamu ;
Esengo na moto oyo azwaka Yawe
lokola ebombamelo na ye !
10 Bino basantu ya Yawe, botosa Yawe ;
pamba te bato oyo batosaka Ye
bazangaka eloko moko te.
11 Bana ya nkosi ezangaka mpe ekufaka nzala,
kasi bato oyo balukaka Yawe
bakozanga eloko moko.
12 Bana na ngai, boya, boyoka ngai ;
Nakolakisa bino kotosa Yawe.
13 Nani asepelaka na bomoi ?
Nani alingaka kobika mikolo ebele ya esengo ?
14 Batela lolemo na yo mosika na mabe,
mpe bibebu na yo ete eloba lokuta te.
15 Zala mosika na mabe mpe sala bolamu,
luka kimia mpe koba na yango.
 
16 Miso ya Yawe etalaka bato ya sembo,
mpe matoyi na Ye eyokaka koganga na bango ;
17 kasi Yawe apesaka bato mabe mokongo
mpo ete bakanisa bango lisusu te kati na mokili.
 
18 Tango bato ya sembo babelelaka,
Yawe ayokaka mpe akangolaka bango
na pasi na bango nyonso.
19 Yawe azali pene ya bato
oyo bazoki na mitema
mpe abikisaka ba-oyo balembi na milimo na bango.
 
20 Pasi mingi ekangaka moto ya sembo,
kasi Yawe akangolaka ye na nyonso,
21 abatelaka mikuwa na ye nyonso
mpo ete moko te kati na yango ebukana.
 
22 Mabe ebomaka moto mabe,
mpe bayini ya moto ya sembo bakozwa etumbu.
23 Yawe akangolaka bomoi ya basali na Ye ;
mpe bato nyonso oyo bazwaka Ye
lokola ebombamelo na bango bakozwa etumbu te.