Nzembo 35
Yawe abatelaka bato ya bolembu
Nzembo ya Davidi.
Yawe, kota likambo na ngai liboso ya bayini na ngai ;
bundisa bato oyo bazali kobundisa ngai.
Kamata nguba ya moke mpe ya monene,
mpe telema mpo na kosunga ngai.
Tombola likonga ya monene mpe ya moke
mpo na kobundisa bato oyo bazali kolanda ngai.
Loba na ngai :
« Nazali lobiko na Yo. »
 
Tika ete bato oyo bazali komeka bomoi na ngai
basambwa mpe bayoka soni ;
tika ete bato oyo bazali kokana kosala ngai mabe
bazonga sima mpe bakoma mawa-mawa !
Tika ete bakoma lokola matiti ya kokawuka
oyo mopepe ezali kopumbwisa,
tango anjelu ya Yawe akotindika bango ;
tika ete nzela na bango ekoma molili mpe moselu
tango anjelu ya Yawe akobengana bango.
 
Mpo ete, na kozanga tina, mpo na kokanga ngai,
batielaki ngai mitambo mpe batimolaki mabulu,
tika ete libebi ekweyela bango na mbalakata,
bakangama bango moko na mitambo oyo batielaki ngai
mpe bakweya kati na mabulu yango !
Nakotonda na esengo kati na Yawe
mpe nakosepela kati na lobiko na Ye.
10 Mikuwa na ngai nyonso ekoloba :
« Oh Yawe, nani akoki kokangola, lokola Yo,
mobola wuta na maboko ya moto oyo aleki ye na makasi,
mobola mpe mokeleli wuta na maboko ya banyokoli na bango ? »
 
11 Batatoli oyo bamipesa na kanza batelemi,
bazali kopesa ngai mituna
na tina na makambo oyo nayebi te.
12 Bazali kozongisela ngai mabe
mpo na bolamu oyo nasalaki,
mpe kosundola ngai lokola monyokolami.
13 Nzokande tango bango babelaki,
ngai nalataki saki, namikitisaki na kokila bilei,
nazalaki kobondela mpo na bango.
14 Nazalaki kotambola na mawa
lokola mpo na moninga to mpo na ndeko ;
nazalaki kokitisa moto na se mpo na mawa
lokola moto oyo azali kolela mama na ye.
15 Kasi awa ngai nakomi na pasi,
bango bazali kosepela mpe kosangana ;
wana ngai nayebi te, bango bazali kosangana
mpo na kotonga ngai,
bazali kolemba te kofinga ngai.
16 Lokola bapagano, bazali koseka ngai,
bazali kolia minu na tina na ngai.
 
17 Yawe, kino tango nini okotala kaka boye ?
Kangola ngai wuta na misala na bango ya mabe,
bomoi na ngai wuta na manzaka ya bankosi oyo.
18 Nakokumisa Yo kati na mayangani monene,
nakosanzola Yo kati na ebele ya bato.
19 Tika ete banguna na ngai basepela te
na tina na ngai ;
tika ete bayini na ngai na kozanga tina
bakanga miso te.
20 Pamba te balobaka te maloba ya kimia,
kasi babongisaka lokuta mpo na kokosela bato ya kimia
makambo kati na mboka.
21 Balobaka na mongongo makasi :
« Eh ! Eh ! Tomonaki ye ! »
 
22 Yawe, omoni nyonso wana ; kovanda nye te !
Nkolo, kozala mosika na ngai te !
23 Lamuka mpe telema mpo na kolongisa ngai !
Nzambe na ngai mpe Nkolo na ngai,
kota likambo na ngai.
24 Yawe, Nzambe na ngai,
longisa ngai na bosembo na Yo ;
kotika bango te kosepela na tina na ngai.
25 Tika ete bamilobela te :
« Ah ! Tala makambo oyo tozalaki koluka ! »
Tika ete baloba te : « Tolie ye. »
26 Tika ete bato nyonso oyo basepelaka na pasi na ngai,
bango nyonso lisanga, bayoka soni mpe basambwa !
Tika ete bato oyo batombokelaka ngai
balata soni mpe bazala kati na yikiyiki !
27 Tika ete bato oyo basepelaka na bosembo na ngai
baganga na esengo mpe basepela ;
tika ete balobaka tango nyonso :
« Tika ete Yawe anetolama,
Ye oyo asepelaka na kimia ya mowumbu na Ye ! »
 
28 Nakosakola bosembo na Yo,
nakokumisa Yo mikolo nyonso.