Nzembo 36
Boboto ya Yawe
Nzembo ya Davidi, mowumbu ya Yawe. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.
Kati na motema na ngai,
nazali na sango kowuta na Nzambe
na tina na bato mabe oyo batondi na masumu :
Kotosa Nzambe ezali na tina ata moke te na miso na bango.
 
Bamipesaka lokumu makasi,
bandimaka te mpe bayinaka masumu na bango te.
Minoko na bango ebimisaka maloba mabe mpe lokuta,
baboyaka kosala na bokebi mpe kosala bolamu.
Ezala na bambeto na bango,
basalaka kaka mabongisi ya kosala mabe,
batambolaka te mpo na kosala bolamu
mpe baboyaka mabe te.
 
Yawe, bolingo na Yo ekenda kino na likolo,
boyengebene na Yo kino na mapata.
Bosembo na Yo ezali lokola bangomba ya Nzambe,
mikano na Yo ezali mozindo lokola lubwaku ya molayi.
Yawe, obikisaka bato mpe banyama.
Oh Nzambe, tala ndenge nini bolingo na Yo ezali motuya !
Bato bazwaka ebombamelo na elili ya mapapu na Yo.
Baliaka mpe batondaka bilei ya Ndako na Yo,
mpe omelisaka bango mayi
kowuta na bolingo monene na Yo.
10 Pamba te etima ya bomoi ezali elongo na Yo ;
kati na pole na Yo nde tomonaka pole.
 
11 Koba kotalisa bolingo na Yo epai ya bato oyo bayebi Yo,
mpe bosembo na Yo epai ya bato ya mitema alima.
12 Tika ete bato ya lolendo bakoma te kino epai na ngai,
mpe tika ete bato mabe babengana ngai te.
13 Tala ndenge nini bato ya misala mabe bakweyi,
balali na mabele, bazangi makoki ya kotelema.