Nzembo 37
Malendisi mpo na moto ya sembo
Nzembo ya Davidi.
Kosilikela bato ya mabe te,
kosalela bato oyo basalaka mabe zuwa te ;
pamba te bakokawuka noki lokola makasa,
mpe bakolemba noki lokola matiti.
 
Tia elikya na yo kati na Yawe mpe sala bolamu,
vanda kati na mokili mpe lia na kimia.
 
Komisa Yawe bilengi na yo ya makasi,
mpe akokokisela yo posa ya motema na yo.
 
Kaba bomoi na yo epai na Yawe,
tia elikya kati na Ye, mpe akosala :
akongengisa bosembo na yo lokola pole,
makoki na yo lokola moyi ya midi.
 
Batela kimia liboso ya Yawe
mpe talela Ye ;
kosilikela te moto oyo alongaka na misala na ye,
mpe oyo asalaka mabongisi ya mabe.
 
Boya kanda mpe kosilika te ;
kotomboka te, noki te okosala mabe.
Pamba te bato oyo basalaka mabe bakolimwa,
kasi bato oyo batielaka Yawe motema
bakozwa mokili lokola libula na bango.
 
10 Etikali tango moke kaka,
moto mabe akozala lisusu te ;
ata oluki ye, okomona ye te.
11 Kasi bato oyo bamikitisa bakozwa mokili
lokola libula na bango mpe bakozala na kimia makasi.
 
12 Bato mabe basalelaka bato ya sembo makita
mpe baliaka minu mpo na kotelemela bango.
13 Kasi Yawe asekaka bato mabe,
pamba te ayebi ete mokolo na bango ezali kobelema.
 
14 Bato mabe babimisi mipanga
mpe babongisi batolotolo
mpo na kokweyisa mobola mpe moto oyo akelela,
mpo na koboma bato oyo batambolaka alima.
15 Kasi mipanga na bango ekotobola mitema na bango moko,
mpe batolotolo na bango ekobukana.
 
16 Mwa biloko ya moto ya sembo eleki
bozwi ya bato ebele ya mabe,
17 pamba te nguya ya bato mabe ekosila,
kasi Yawe alendisaka bato ya sembo.
 
18 Yawe ayebi mikolo ya bato bazangi pamela,
mpe libula na bango ekowumela mpo na seko.
19 Na tango ya pasi, bakokawuka te ;
na mikolo ya nzala, bakozala na bilei ebele.
 
20 Kasi bato mabe bakokufa,
banguna ya Yawe bazali lokola fololo ya elanga,
bakolimwa lokola molinga.
 
21 Moto mabe adefaka mpe azongisaka te,
kasi moto ya sembo ayokaka mawa mpe akabaka.
22 Bato oyo Yawe apambolaka bakozwa
mokili lokola libula na bango,
kasi ba-oyo alakelaka mabe bakolimwa.
 
23 Soki Yawe asepeli na etamboli ya moto,
alendisaka bomoi na ye ;
24 ezala akweyi, akotikala kaka ya kokweya te ;
pamba te Yawe asimbaka ye na loboko.
 
25 Nazalaki elenge, mpe sik’oyo nakomi mobange,
namoni nanu te moto ya sembo kosundolama
to bana na ye kokoma kosenga-senga bilei.
26 Akabaka tango nyonso mpe adefisaka,
bana na ye bakozalaka kati na mapamboli.
 
27 Zala mosika na mabe mpe sala bolamu,
okovanda na mokili mpo na libela ;
28 pamba te Yawe alingaka bosembo,
mpe asundolaka te bayengebene na Ye.
 
Babatelamaka mpo na seko,
kasi bana ya bato mabe bakolimwa.
29 Bato ya sembo bakozwa mokili lokola libula na bango
mpe bakovanda kuna seko na seko.
 
30 Monoko ya moto ya sembo ebimisaka bwanya,
mpe lolemo na ye elobaka kolanda bosembo.
31 Mobeko ya Nzambe na ye ezali kati na motema na ye,
makolo na ye ebetaka libaku te.
 
32 Moto mabe atalaka moto ya sembo na miso mabe
mpe alukaka nzela ya koboma ye,
33 kasi Yawe akosundola moto ya sembo te
kati na maboko ya moto mabe,
mpe akokweyisa ye te na kosambisama.
 
34 Zala na elikya kati na Yawe
mpe batela nzela na Ye ;
akonetola Yo mpo ete ozwa mboka lokola libula na yo,
mpe okomona tango bato mabe bakolimwa.
 
35 Namonaki moto mabe mpe na kanza
kokoma na nguya mpe kofuluka
lokola nzete oyo ezali kokola na mabele na yango,
36 kasi alekaki noki mpe azalaki lisusu te ;
nalukaki ye, kasi namonaki ye lisusu te.
 
37 Tala malamu moto oyo azangi pamela,
landela bomoi ya moto ya sembo ;
tango oyo ezali koya ezali kozela moto ya kimia.
38 Kasi batomboki bakobebisama,
tango oyo ezali koya ezali te mpo na bato mabe.
 
39 Lobiko ya bato ya sembo ewutaka epai ya Yawe
oyo, na tango ya pasi, azali ndako na bango,
oyo batonga makasi.
40 Yawe asungaka mpe akangolaka bango,
akangolaka bango wuta na maboko ya bato mabe
mpe abikisaka bango,
pamba te babombamaka kati na Ye.