Nzembo 38
Losambo ya mobeli
Nzembo ya Davidi mpo na kokanisa.
Yawe, kopamela ngai te kati na kanda na Yo
to kopesa ngai etumbu te kati na kanda makasi na Yo.
Pamba te makonga na Yo etoboli ngai,
mpe loboko na Yo ebeti ngai.
Mpo na kanda na Yo, nzoto na ngai ebeli ;
mpo na masumu na ngai, mikuwa na ngai elembi.
Mabe na ngai eleki moto na ngai,
ezali kilo makasi epai na ngai
lokola mokumba ya kilo makasi.
 
Bapota na ngai epoli mpe ekomi kolumba solo
mpo na bozoba na ngai.
Nagumbami, nalembi makasi ;
nakomi moto ya mawa mpo na libela.
Pamba te nazali koyoka pasi makasi na mokongo na ngai,
eteni ata moko te ya nzoto na ngai ezali malamu.
Nalembi, makasi na ngai nyonso esili ;
mobulu ekoti na motema na ngai,
nakomi koganga na kolemba te.
 
10 Nkolo, oyebi posa na ngai nyonso ;
kolela na ngai ezali ya kobombama te na miso na Yo.
11 Motema na ngai ezangi kimia,
makasi na ngai ekomi kosila,
nabungisi ata pole ya miso na ngai.
12 Bato oyo balingaka ngai mpe baninga na ngai
bakimi pasi na ngai,
ba-oyo bazalaka na ngai esika moko batelemi mosika na ngai.
13 Bato oyo balukaka kufa na ngai bazali kotia mitambo,
ba-oyo balukaka pasi na ngai bazali koloba mpo na kosala ngai mabe,
bakomi mikolo nyonso kobongisa lokuta.
14 Kasi ngai nazali kosala lokola mokufi matoyi ;
mpe lokola baba, nakangi monoko, naboyi koloba.
15 Nakomi lokola mokufi matoyi
oyo akoki kopesa eyano ata moko te na monoko na ye.
16 Yawe, natiaka elikya na ngai kati na Yo ;
oh Nkolo, Nzambe na ngai, solo, okoyanola.
17 Nalobaki : « Kopesa nzela te
ete basepela na tina na ngai
to bamitombola likolo na ngai soki nabeti libaku. »
18 Pamba te nakomi pene ya kokweya,
pasi na ngai ezali kaka elongo na ngai tango nyonso.
19 Solo nandimi mabe na ngai,
masumu na ngai ezali kotungisa molimo na ngai.
20 Banguna na ngai bazali makasi mpe bingambe,
bato oyo bayinaka ngai kaka pamba bazali ebele.
21 Bato oyo bazongisaka mabe na bolamu
bazali kofunda ngai atako nalukaka kosala bolamu.
 
22 Yawe, kosundola ngai te ;
Nzambe na ngai, kozala mpe mosika na ngai te.
23 Nkolo, Mobikisi na ngai,
yaka noki kosunga ngai.