Nzembo 39
Liboso ya kufa
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi mpe ya Yedutuni. Nzembo ya Davidi.
Namilobelaki : « Nakosala keba na etamboli na ngai
mpo ete monoko na ngai esala masumu te ;
nakobatela penza monoko na ngai
tango nyonso moto mabe akozala liboso na ngai. »
Boye nakangaki monoko na ngai mpe navandaki nye,
natikalaki koloba ata likambo moko te ;
pasi na ngai ebakisamaki makasi.
Motema na ngai eswaki,
moto ezalaki kopela kati na ngai,
mpe nalobaki na nzela ya monoko na ngai.
 
Yawe, yebisa ngai tango nini bomoi na ngai ekosuka
mpe motango ya mikolo ya bomoi na ngai
mpo ete nasosola ete bomoi na ngai ezali kaka
mpo na mwa tango moke.
Solo mikolo ya bomoi na ngai ekatama,
ezali pamba na miso na Yo.
Bomoi ya moto nyonso ezali kaka mopepe.
 
Moto akendaka mpe azongaka,
azali kaka lokola elili ;
amitungisaka kaka pamba, andukaka bomengo,
kasi ayebaka te soki nani akotikala na yango.
 
Sik’oyo, oh Nkolo, nazela lisusu nini ?
Natiaka elikya na ngai kati na Yo.
Bikisa ngai na mabe na ngai nyonso,
kopesa nzela te na bazoba ete bafinga ngai.
10 Nakangi monoko, nakoloba lisusu te,
pamba te Yo nde osali.
11 Kobeta ngai lisusu te,
nazali kokoka lisusu te.
12 Opesaka bato etumbu mpo na masumu na bango
mpo na kozongisa bango na nzela ;
obebisaka biloko na bango ya motuya lokola nselele.
Solo, moto nyonso azali kaka mopepe.
 
13 Yawe, yoka
libondeli na ngai ;
yoka na bokebi, wana nazali
koganga mpo na kosenga lisungi,
kovanda nye te liboso ya mpinzoli na ngai,
pamba te epai na Yo, nazali mopaya
mpe moleki nzela lokola bakoko na ngai.
14 Kotala ngai te mpo ete nasepela lisusu,
liboso ete nakende na ngai mpe nazala lisusu te.