Nzembo 40
Lobiko ya Nzambe epai ya mosali na Ye
Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.
Natiaki elikya na ngai kati na Yawe ;
abalukaki epai na ngai mpe ayokaki koganga na ngai.
Abimisaki ngai na libulu ya mozindo, kati na potopoto ;
atelemisaki ngai na likolo ya libanga
mpe alendisaki makolo na ngai.
Atiaka nzembo ya sika kati na monoko na ngai,
nzembo ya masanzoli mpo na Nzambe na biso.
Bato ebele bakomona, bakobanga
mpe bakotiela Yawe motema.
 
Esengo na moto oyo atiaka elikya kati na Yawe,
kasi atalelaka te bato ya lolendo mpe bakosi.
Yawe, Nzambe na ngai, bikamwa mpe mabongisi
oyo osalaka mpo na biso ezali ebele penza.
Moko te akokani na Yo ;
nalingi kotatola mpe kopanza sango na yango,
kasi motango na yango eleki ebele.
 
Osepelaki te na bambeka mpe na makabo,
kasi ofungolaki matoyi na ngai ;
osengaki te makabo ya kotumba mpe bambeka
mpo masumu.
Bongo nalobaki : « Ngai oyo, nayei epai na Yo
kolanda ndenge ekomami na tina na ngai kati na buku.
Nzambe na ngai, nasepelaka kosala mokano na Yo,
Mobeko na Yo ezali kati na motema na ngai. »
 
10 Nasakolaka bosembo na Yo kati na mayangani,
nakokanga monoko na ngai te ;
Yawe, oyebi yango !
11 Nabombaka bosembo na Yo te kati na motema na ngai,
natatolaka boyengebene mpe lobiko na Yo kati na mayangani,
nakobomba yango ata moke te.
12 Yawe, kopimela ngai mawa na Yo te ;
kasi sala ete bolingo mpe bosolo na Yo
ebatelaka ngai tango nyonso.
13 Pamba te makambo ebele ya pasi ezingeli ngai,
mabunga na ngai ekomi konyokola ngai,
mpe nazali kokoka lisusu te kotala yango ;
ezali ebele koleka suki ya moto na ngai,
mpe motema na ngai elembi kati na ngai.
14 Yawe, nabondeli Yo, kangola ngai ;
Yawe, yaka noki kosunga ngai.
 
15 Tika ete bato oyo balukaka kufa na ngai
bakufa soni mpe basambwa !
Tika ete bato oyo bazelaka libebi na ngai
bazonga sima mpe babungisa lokumu na bango !
16 Tika ete ba-oyo balobaka na ngai : « Ah ! Ah ! »
bayoka somo mpe bakufa soni !
17 Kasi tika ete bato nyonso oyo balukaka Yo
batonda na esengo mpe basepela kati na Yo !
Tika ete ba-oyo balingaka lobiko na Yo
balobaka tango nyonso : « Yawe azali monene ! »
 
18 Solo, nazali mobola mpe moto akelela,
kasi tika ete Nkolo asunga mpe akangola ngai.
Nzambe na ngai, kowumela te !