Nzembo 41
Mobeli mpe monyokolami
Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.
Esengo na moto oyo akanisaka mobola !
Yawe akokangola ye na tango ya pasi.
Yawe akokengela ye mpe akobatela bomoi na ye,
akokomisa ye moto ya esengo kati na mokili
mpe akokaba ye te na maboko ya banguna na ye.
Yawe akosunga ye na mbeto na ye soki abeli
mpe akobikisa ye na bokono na ye nyonso.
 
Nalobaki : « Oh Yawe, yokela ngai mawa ;
bikisa ngai na bokono, pamba te nasalaki masumu epai na Yo. »
Banguna na ngai balobaka mabe na tina na ngai :
« Akokufa mokolo nini mpo ete kombo na ye etangama lisusu te ? »
Kati na bango, moto nyonso oyo ayaka kotala ngai
alobaka kaka lokuta mpo na kobebisa lokumu na ngai,
akangisaka kati na ye makambo ya lokuta
mpe, soki kaka abimi libanda, apanzaka yango na matongi.
Banguna na ngai basanganaka kaka
mpo na kotonga ngai mpe kokanisa mpo na libebi na ngai.
Balobaka : « Pasi moko ya somo penza ekangi ye,
ebwaki ye na mbeto mpe azali kokoka lisusu kotelema te. »
10 Ezala molingami na ngai ya kimia,
oyo nazalaki kotiela motema
mpe azalaki kolia sani moko elongo na ngai,
abalukeli ngai.
 
11 Kasi Yo, Yawe, yokela ngai mawa mpe telemisa ngai
mpo ete nazongisela bango mabe na mabe.
12 Nakoyeba ete osepelaka na ngai
soki kaka monguna na ngai agangi te na tina na ngai.
13 Mpo ete nazangi pamela, okosunga ngai
mpe okovandisa ngai na makolo na Yo mpo na libela.
 
 
14 Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele,
akumisama libela na libela !
Amen ! Amen !