Nzembo 56
Elongo na Nzambe, kobanga ezali lisusu te
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Ebenga ya terebente ya mosika. » Nzembo ya Davidi, tango bato ya Filisitia bakangaki ye kati na mboka Gati.
Nzambe, yokela ngai mawa,
pamba te bato bazali kotungisa ngai.
Babundisaka mpe banyokolaka ngai mikolo nyonso.
Bayini na ngai batungisaka ngai mikolo nyonso ;
bato oyo babundisaka ngai na lolendo bazali ebele.
 
Mokolo oyo nazalaka na bobangi,
natiaka elikya na ngai kati na Yo.
Epai ya Nzambe, nakumisaka Liloba na Ye ;
Epai ya Nzambe, natiaka motema mpe nabangaka te.
Moto oyo akokufa akoki kosala ngai nini ?
 
Babongolaka maloba na ngai mikolo nyonso ;
mabongisi na bango nyonso ezalaka
mpo na kosala ngai mabe.
Basalaka makita, babombamaka,
balandaka ngai mpo na kosala ngai mabe.
Mpo na makambo oyo ya mabe,
boni, bazanga etumbu ?
Oh Nzambe, kweyisela bikolo kanda na Yo !
 
Solo, oyebi motango ya matambe
ya bomoi na ngai ya mitelengano.
Sopa mpinzoli na ngai kati na mbeki na Yo,
oyo ezali buku na Yo ya ekaniseli.
10 Bongo, na mokolo oyo nakobelela
mpo na kosenga lisungi,
banguna na ngai bakozonga sima.
Na nzela ya likambo yango,
nakoyeba ete Nzambe azali mpo na ngai.
 
11 Pembeni ya Nzambe oyo nakumisaka Liloba na Ye,
pembeni ya Yawe oyo nakumisaka Liloba na Ye,
12 pembeni ya Nzambe oyo natielaka motema
mpe nazalaka na bobangi te,
moto akoki kosala ngai nini ?
 
13 Epai na Yo Nzambe, nakokokisa bandayi na ngai
mpe nakobonza bambeka ya matondi.
14 Pamba te okangoli ngai na kufa
mpe obateli makolo na ngai ete ebeta mabaku te,
mpo ete natambola liboso na Yo Nzambe
kati na pole ya bomoi.