Nzembo 57
Kimia na kati ya banguna
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na nzembo « Koboma te. » Nzembo ya Davidi, tango Saulo azalaki kolanda ye, mpe tango Davidi abombamaki kati na libulu.
Oh Nzambe, yokela ngai mawa !
Yokela ngai mawa,
pamba te nazali koluka ebombamelo ;
nazali koluka ebombamelo na se ya mapapu na Yo,
kino tango ya pasi ekoleka.
 
Nazali koganga epai ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo,
epai ya Nzambe oyo asalelaka ngai bolamu.
Akotinda wuta na likolo mpe akobikisa ngai,
akopamela bato oyo batungisaka ngai.
Nzambe akomonisa bolingo
mpe boyengebene na Ye.
 
Nazali na kati-kati ya bankosi ;
nalali na kati-kati ya bato
oyo babomaka mpe baliaka bato,
oyo minu na bango ezali makonga mpe batolotolo,
mpe lolemo na bango ezali mopanga ya minu makasi.
 
Oh Nzambe, tika ete omitombola na likolo ya Lola ;
tika ete nkembo na Yo ezala
awa na mokili mobimba !
 
Batiaki monyama na makolo na ngai
mpo ete nakangama,
batimolaki libulu liboso na ngai,
kasi bango moko nde bakweyaki kati na libulu yango.
 
Nzambe, lendisa motema na ngai ;
Nzambe, lendisa motema na ngai.
Nakoyembela Yo mpe nakosanzola Yo na mindule.
Lokumu na ngai, lamuka !
Lindanda mpe nzenze, bolamuka !
Nalingi kolamusa tongo.
 
10 Nkolo, nakosanzola Yo kati na mabota,
nakosanzola Yo na mindule kati na bikolo.
11 Pamba te bolingo na Yo ezali monene,
ekenda kino na Lola ;
mpe bosembo na Yo ekenda kino na mapata.
 
12 Nzambe, tika ete omitombola na likolo ya Lola ;
mpe tika ete nkembo na Yo etonda na mokili mobimba !