Nzembo 58
Nzambe, Mosambisi ya sembo ya bakambi mabe
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Kobebisa te. » Nzembo ya Davidi.
Ezali solo ete bolobaka te tango bokataka makambo ?
Boni, bana na moto, bosambisaka na bosembo ?
Te, ezala kati na mitema na bino,
bosalaka mabongisi ezanga bosembo ;
botandaka kanza ya maboko na bino kati na mokili.
 
Bato mabe babebaka wuta na mbotama na bango,
bapengwaka mpe balobaka lokuta
wuta na mabumu ya bamama na bango.
Bazalaka na ngenge lokola ngenge ya nyoka,
lokola ngenge ya etupa oyo eyokaka te,
oyo ekangaka litoyi na yango,
oyo eyokaka te ata mingongo ya bato na soloka
mpe ya moto ya maji oyo aleki na mayele.
 
Nzambe, buka minu na bango
kati na minoko na bango ;
Yawe, buka bambanga ya bana ya bankosi.
Tika ete balimwa lokola mayi oyo ezali kotiola ;
Tika ete bambanzi na bango ebukana
tango babetaka batolotolo.
Tika ete balimwa lokola soyi ya mbembe,
lokola mwana oyo akomona moyi te
mpo ete abimi na zemi oyo esopani.
 
10 Liboso ete banzungu na bino ekutana
na moto ya basende,
ezala ya mayi to ya kokawuka,
bato mabe akolimwa.
11 Moto ya sembo akosepela,
pamba te akomona Nzambe
kozongisela bato mabe, mabe na mabe,
mpe akotambola kati na makila na bango.
12 Mpe bato bakoloba :
« Solo, ezali na lifuti mpo na moto ya sembo ;
solo, ezali na Nzambe oyo asambisaka mokili. »