Nzembo 68
Elonga ya Nzambe
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Loyembo.
Soki Nzambe atelemi, banguna na Ye bapalanganaka,
mpe bayini na Ye bakimaka mosika na Ye.
Liboso ya Nzambe, bato mabe bakufaka,
ndenge milinga elimwaka,
mpe mafuta enyangwamaka na moto.
Liboso ya Nzambe, bato ya sembo basepelaka,
batondaka na esengo.
 
Boyembela Nzambe, boyemba banzembo
mpo na lokumu ya Kombo na Ye.
Bofungola nzela mpo na Ye
oyo atambolisaka mampinga na Ye kati na esobe.
Kombo na Ye ezali Yawe.
Botonda na esengo liboso na Ye.
Kati na Ndako na Ye ya bule, Nzambe azali Tata ya bana bitike,
mpe molobeli ya basi bakufisa mibali.
Nzambe apesaka libota epai ya bato
oyo bavandaka bango moko,
abimisaka bakangami wuta na minyololo ;
kasi batomboki batikalaka na mabele ekawuka.
Oh Nzambe, tango obimaki liboso ya bato na Yo,
tango otambolaki na esobe,
mabele eninganaki, likolo mpe esopaki mayi
liboso ya Nzambe, Nzambe ya Sinai ;
liboso ya Nzambe, Nzambe ya Isalaele.
10 Nzambe, osopaki mvula ya mapamboli,
olendisaki libula na Yo mpo ete elembaki.
11 Oh Nzambe, bato na Yo bavandaka na mokili oyo obongisaki,
na boboto na Yo, mpo na mobola.
 
12 Na liloba moko kowuta na Nkolo,
basi oyo bamemaka sango basangani bato ebele,
13 bakonzi ya mampinga bakimi, bapoti mbangu,
mpe mwasi oyo atikali na ndako akaboli bomengo ya bitumba.
14 Boni, bokokoba kolala pongi kati na bandako na bino ?
Mapapu ya ebenga ezipami na se ya palata,
mpe bansala na yango ezipami na se ya wolo.
15 Tango Nkolo-Na-Nguya-Nyonso abenganaki kuna bakonzi,
anokisaki mvula ya pembe na ngomba Tsalimoni.
 
16 Ngomba ya Bashani, ngomba ya Nzambe ;
ngomba ya Bashani, ngomba ya basonge ebele,
17 mpo na nini ozali kosala zuwa,
ngomba ya basonge ebele,
ngomba oyo Nzambe asepelaka kovanda ?
Nzokande Yawe akovanda kuna libela na libela.
18 Motango ya bashar ya Nzambe ezali ebele,
koleka minkoko ;
Nkolo azali kati na yango,
kuna na Sinai, kati na Esika ya bule.
19 Yawe Nzambe, tango omataki na likolo,
omemaki bakangami,
ozwaki makabo epai ya bato,
ata epai ya batomboki,
mpo ete okoma kovanda kuna.
 
20 Tika ete Nkolo akumisama, mokolo na mokolo !
Nzambe Mobikisi na biso alataka makambo na biso.
21 Mpo na biso, Nzambe yango azali Nzambe oyo abikisaka ;
mpe bikuke ya kufa ezali ya Nkolo Yawe.
22 Solo, Nzambe apanzaka mito ya banguna na Ye,
oyo batambolaka kati na bomoi ya masumu,
oyo mito na bango etonda na suki.
23 Nkolo alobi :
« Wuta na Bashani, nakomema bango ;
wuta na mozindo ya ebale monene,
nakomema bango,
24 mpo ete opanza lokolo na yo kati na makila,
mpe mpo ete lolemo ya bambwa na yo ezwa eteni na yango. »
 
25 Oh Nzambe, bazali komona ndenge ozali koya ;
koya ya Nzambe na ngai, ya Mokonzi na ngai, kati na Esika ya bule.
26 Bayembi bazali liboso ;
sima na bango, bato oyo bazali kobeta
mandanda ya basinga kati na bilenge basi
oyo bazali kobeta bambonda ya mike.
27 Bopambola Nzambe kati na mayangani,
bopambola Yawe wuta na etima ya Isalaele.
28 Kuna, Benjame, leki ya suka,
azali kotambolisa bakambi ya Yuda
elongo na mampinga na bango,
bakambi ya Zabuloni mpe ya Nefitali.
 
29 Nzambe na yo apesi mitindo epai ya makasi na yo ; zala makasi.
Nzambe, osaleli biso penza makambo.
30 Wuta na Tempelo na Yo ya Yelusalemi
epai wapi bakonzi bamemelaka Yo makabo,
31 bengana ngando oyo ebombami kati na matiti,
lisanga ya bangombe ya mibali elongo na bana ngombe ya bikolo
oyo batambolaka kati na mbongo
ya bibende ya palata, mpe panza bikolo oyo basepelaka na bitumba.
32 Bazwi bakobimela na Ejipito ;
bato ya Kushi bakoya na lombangu,
bakotombola maboko epai ya Nzambe.
 
33 Bino, babokonzi ya mabele, boyembela Nzambe ;
boyemba banzembo mpo na lokumu ya Nkolo !
34 Boyembela Ye oyo atambolisaka
mampinga kati na likolo, likolo ya libela ;
oyo, wuta na mongongo na Ye, agangaka makasi.
35 Bosakola ete nguya ezali ya Nzambe
oyo nkembo na Ye ezali na Isalaele,
mpe nguya na Ye ezali kati na mapata.
36 Nzambe, wuta kati na bisika na Yo ya bule,
obongi na botosi !
Nzambe ya Isalaele apesaka na bato na Ye
makasi mpe nguya.
 
Tika ete Nzambe akumisama !