Nzembo 69
Nazindi, bikisa ngai
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi : ezali ya koyemba lokola « lisi. »
Nzambe, bikisa ngai,
pamba te mayi ekomi na kingo na ngai.
Nazali kozinda na potopoto, na mozindo makasi
epai wapi eloko ya kosimba ezali te ;
nakiti na mozindo ya mayi,
mbonge ememi ngai.
Nalembi nzoto likolo ya kobelela lisungi ;
mongongo na ngai ekawuki,
miso na ngai elembi
mpo na kotalela Nzambe na ngai.
Bato oyo bayinaka ngai na kozanga tina
bazali ebele koleka motango ya suki ya moto na ngai ;
ba-oyo balukaka kobebisa bomoi na ngai,
oyo bazali banguna na ngai kaka pamba,
bazali bato na nguya ;
bazali kosenga ngai na makasi ete nazongisa eloko oyo nayibaki te.
 
Nzambe, oyebi bozoba na ngai,
mpe mabe na ngai ezali ya kobombama te na miso na Yo.
 
Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga,
tika ete ba-oyo batiaka elikya kati na Yo
basila lokumu te likolo na ngai !
Nzambe ya Isalaele,
tika ete bato oyo balukaka Yo
bayokisama soni te likolo na ngai !
Pamba te nandimi kofingama mpo na Yo,
mpe soni ezipi ngai elongi.
Bandeko na ngai bakomi kozwa ngai lokola moto oyo bayebi te,
nakomi lokola mopaya na miso ya bana ya mama na ngai.
10 Pamba te bolingo oyo nazali na yango
mpo na ndako na Yo ezali kozikisa ngai,
mpe mafinga ya bato oyo bafingaka Yo
ezali kokweya na moto na ngai.
11 Soki naleli mpe nakili bilei,
nasengeli kaka kofingama ;
12 soki nalati saki,
bato basalaka masapo mpo na kotiola ngai.
13 Bato oyo bavandi na ekuke batiolaka ngai,
balangwi masanga bayembaka kombo na ngai
kati na banzembo na bango.
 
14 Yawe, nabondeli Yo !
Nzambe, tango ekoki,
tango ya kotalisa ngai bolingo monene na Yo !
Yanola ngai na nzela ya boyengebene mpe lobiko na Yo !
15 Bimisa ngai na potopoto,
sala ete nazinda lisusu te,
nakangolama wuta na maboko ya bayini na ngai
mpe nabima na mayi ya mozindo !
16 Tika ete mbonge ya mayi emema ngai lisusu te,
mozindo emela lisusu ngai te,
mpe libulu ekangamela ngai te !
 
17 Yawe, yanola ngai, pamba te bolingo na Yo ezali malamu ;
baluka epai na ngai, na mawa monene na Yo.
18 Kobombela lisusu mosali na Yo te elongi na Yo.
Yanola ngai noki, pamba te nazali na pasi.
19 Pusana pene na ngai, mpe sikola ngai ;
kangola ngai wuta na maboko ya bayini na ngai.
 
20 Oyebi ndenge nini nazali kofingama,
oyebi soni mpe kosambwa na ngai ;
banguna na ngai nyonso bazali liboso na Yo.
21 Mafinga ezokisi motema na ngai,
mpe pota yango ezali kosila te ;
nazelaki elembo ya mawa kowuta na bato,
kasi namonaki yango te ;
nalukaki babondisi, kasi namonaki bango te.
22 Batiaki ngenge kati na bilei na ngai,
mpe bamelisaki ngai vino ya ngayi
tango nayokaki posa ya mayi.
 
23 Tika ete mesa na bango ekoma motambo liboso na bango,
mpe kimia na bango ekoma monyama.
24 Tika ete miso na bango ekufa mpo ete bamona lisusu te,
mpe babela mikongo mpo na libela.
25 Sopela bango kanda makasi na Yo,
mpe tika ete kanda na Yo ya makasi ekanga bango.
26 Tika ete molako na bango etikala polele,
mpe ete moto moko te avanda na bandako na bango ya kapo.
27 Pamba te bazali konyokola bato oyo ozokisaki,
mpe bazali kopanza sango ya pasi ya bato oyo oyokisaki pasi.
28 Bakisa mabe na likolo ya mabe na bango,
mpe kokota likambo na bango te na bosembo na Yo.
29 Tika ete bakombo na bango elongwa na buku ya bomoi,
mpe batangama te na molongo ya bato ya sembo.
 
30 Solo, nazali mobola mpe moto ya pasi ;
kasi lobiko na Yo, oh Nzambe, ebatelaka ngai.
 
31 Nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo ya Nzambe,
mpe nakopesa Ye nkembo elongo na matondi.
32 Yango nde ekosepelisa Yawe,
koleka ngombe oyo ezali na maseke
mpe na makolo ekabwana.
33 Babola bamoni mpe bazali kosepela.
Tika ete mitema na bino oyo bolukaka Nzambe ezala na bomoi !
34 Pamba te Yawe ayokaka bato oyo bakelela,
mpe atiolaka bato na Ye te ata bazali bakangami kati na boloko.
 
35 Tika ete likolo mpe mabele,
bibale minene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ekumisa Ye !
36 Pamba te Nzambe akobikisa Siona
mpe akotonga lisusu bingumba ya Yuda.
Bato bakovanda kuna
mpe bakozwa yango lokola libula na bango.
37 Bakitani ya basali na Ye bakozwa
yango lokola libula,
mpe bato oyo balingaka Kombo na Ye
bakovanda kati na yango.