Nzembo 70
Nzambe, yaka kosunga ngai
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi mpo na kokanisa misala ya Nzambe.
Nzambe, yaka noki mpo na kangola ngai !
Yawe, yaka noki mpo na kosunga ngai !
Tika ete bato oyo balukaka kufa na ngai
bakufa soni mpe basambwa !
Tika ete bato oyo bazelaka libebi na ngai
bazonga sima mpe bayokisama soni !
Tika ete bato oyo balobaka na ngai :
« Ah ! Ah ! » bazonga mpo na soni !
Tika ete bato nyonso oyo balukaka Yo
batonda na esengo mpe basepela kati na Yo !
Tika ete ba-oyo balingaka lobiko na Yo
balobaka tango nyonso :
« Nzambe azali monene ! »
 
Mpo ete nazali mobola mpe moto akelela,
Nzambe, yaka noki mpo na kosunga ngai.
Yawe, ozali Lisungi mpe Mokangoli na ngai,
kowumela te !