Nzembo 8
Nkembo ya Nzambe
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati.
Oh Yawe, Nkolo na biso,
Kombo na Yo ezali monene kati na mokili mobimba !
 
Ovandisi nkembo na Yo
kati na Lola.
Na nzela ya masanzoli ya bana mpe bana mike,
otelemisi ndako batonga makasi,
mpo na kotelemela bayini na Yo
mpe kokanga monoko ya monguna
mpe ya moto oyo alingaka kozongisa mabe na mabe.
 
Tango natalaka Lola na Yo,
mosala ya misapi na Yo,
sanza mpe minzoto oyo otia,
namitunaka : Moto azali nini mpo ete okanisa ye,
mpe moto azali nani mpo ete obatela ye ?
Osalaki ye moke koleka ba-anjelu
mpe olatisaka ye motole ya nkembo mpe ya lokumu ;
otia ye moyangeli ya misala ya maboko na Yo,
otia nyonso na se ya matambe na ye :
bameme, bantaba,
bangombe mpe banyama ya zamba,
bandeke ya likolo,
mbisi ya ebale monene
mpe nyonso oyo etambolaka na bibale.
 
10 Oh Yawe, Nkolo na biso,
Kombo na Yo ezali monene
kati na mokili mobimba !