Nzambe 71
Na kimobange na ngai, kosundola ngai te
Yawe, ozali ebombamelo na ngai ;
kondima te ete nayoka soni !
Na bosembo na Yo, kangola mpe bikisa ngai.
Yoka ngai mpe bikisa ngai.
Zala mpo na ngai ekimelo ya libanga
epai wapi nakoki kokende tango nyonso.
Ozwaki mokano ya kobikisa ngai,
pamba te ozali libanga mpe ndako na ngai batonga makasi.
Nzambe na ngai, kangola ngai wuta na maboko ya bato mabe,
na maboko ya batomboki mpe bato na kanza.
Nkolo Yawe, ozali elikya na ngai ;
wuta bolenge na ngai, namipesaka na Yo.
Wuta mbotama na ngai, natalelaka Yo ;
Yo nde obimisaki ngai na libumu ya mama na ngai.
Nakokumisa Yo tango nyonso.
Nazali likamwisi mpo na bato ebele ;
ozali ebombamelo na ngai ya makasi.
Tika ete monoko na ngai etonda
na masanzoli mpo na lokumu na Yo ;
tika ete etatolaka tango nyonso
kongenga ya nkembo na Yo.
 
Kobwaka ngai te awa nakomi mobange,
kotika ngai te awa makasi na ngai ekomi kosila.
10 Pamba te banguna na ngai bazali koloba mabe
na tina na ngai,
mpe bato oyo balukaka koboma ngai
basaleli ngai likita.
11 Bazali koloba : « Nzambe asundoli ye ;
bolanda ye, bokanga ye ;
moto oyo akokangola ye azali te ! »
12 Oh Nzambe, kozala mosika na ngai te !
Nzambe na ngai, yaka noki mpo na kosunga ngai.
13 Tika ete bato oyo bafundaka ngai bakufa soni mpe balimwa !
Tika ete ba-oyo balukaka pasi na ngai
basambwa mpe bayokisama soni !
 
14 Kasi ngai, nakozala na elikya tango nyonso
mpe nakokoba kokumisa Yo.
 
15 Monoko na ngai ekosakola tango nyonso
misala ya bosembo mpe ya lobiko na Yo,
pamba te nayebi motango na yango te.
16 Nkolo Yawe, nakoya epai na Yo
mpe nakotatola misala na Yo ya nguya ;
nakotatola misala malamu ya bosembo na Yo,
misala ya bosembo na Yo kaka.
17 Nzambe, wuta bolenge na ngai, oteya ngai ;
mpe kino lelo, nazali kotatola bikamwa na Yo.
18 Ezala ndenge nakomi sik’oyo mobange
mpe suki na ngai ekomi pembe,
oh Nzambe na ngai, kotika ngai te,
mpo ete natatola makasi na Yo
epai ya bato ya ekeke oyo,
mpe misala ya nguya na Yo
epai ya bato nyonso oyo bakoya sima.
19 Nzambe, bosembo na Yo ekenda kino na likolo,
pamba te osalaka makambo minene.
Oh Nzambe, nani akokani na Yo ?
20 Atako osalaki ete tokutana na pasi mingi mpe na makambo ya bololo,
kasi okotika lisusu biso kozala na bomoi,
okobimisa ngai lisusu wuta na mozindo ya mabele.
21 Okomatisa lisusu lokumu na ngai,
mpe okobondisa ngai lisusu.
 
22 Nzambe na ngai, nakosanzola Yo
na lindanda mpo na boyengebene na Yo ;
Mosantu ya Isalaele, nakobeta lindanda
mpo na lokumu na Yo.
23 Nakoganga na esengo tango nakoyemba
banzembo mpo na lokumu na Yo,
pamba te okangoli bomoi na ngai.
24 Lolemo na ngai ekotatola tango nyonso
misala ya bosembo na Yo,
pamba te bato oyo balukaka pasi na ngai
bayokisami soni mpe basambwe.