Nzembo 72
Libondeli mpo na mokonzi
Nzembo ya Salomo.
Oh Nzambe, pesa na mokonzi mayele na Yo ;
mpe na mwana ya mokonzi, bosembo na Yo !
Tika ete asambisa bato na Yo na bosembo ;
mpe babola na Yo, kolanda boyengebene.
 
Bangomba milayi ekomemela bato kimia ;
mpe bangomba mike, bosembo.
Akokota likambo ya babola kati na bato,
akobikisa bana ya moto akelela
mpe akobebisa monyokoli.
 
Bongo bakotosa Yo tango nyonso moyi ekongala,
tango nyonso sanza ekongenga,
na bikeke nyonso.
 
Tika ete azala lokola mvula oyo ezali konoka
na bilanga oyo balongoli matiti,
lokola mamwe oyo ezali kopolisa mabele.
Na tango na ye, moto ya sembo akokende liboso,
mpe kimia ekofuluka
kino sanza ekongenga lisusu te.
 
Tika ete akonza longwa na ebale moko ya monene
kino na ebale mosusu ya monene,
longwa na ebale Efrate kino na suka ya mokili.
Bavandi ya esobe bakofukama liboso na ye,
mpe banguna na ye bakolembola putulu.
10 Bakonzi ya Tarsisi mpe ya bisanga
bakomemela ye mpako ya mokonzi,
bakonzi ya Saba mpe ya Seba bakopesa ye makabo.
11 Bakonzi nyonso bakofukama liboso na ye,
mpe bikolo nyonso ekosalela ye.
 
12 Pamba te akokangola moto akelela
oyo azali koganga mpo na kosenga lisungi,
mpe mobola oyo azangi mosungi.
13 Akoyokela mobola mpe moto akelela mawa,
mpe akobikisa moto akelela na kufa ;
14 akosikola bango na minyoko
mpe na makambo na kanza,
pamba te bomoi na bango ezali motuya
na miso na ye.
 
15 Akozala na bomoi,
bakopesa ye wolo ya Saba.
Bakobanda kosambela mpo na ye tango nyonso
mpe kopambola ye mikolo nyonso.
 
16 Tika ete ble etonda kati na mokili,
mbuma na yango ebota ebele na likolo ya bangomba lokola Libani !
Wuta na engumba, bato bakozala na bofuluki
lokola matiti ya elanga.
17 Tika ete kombo na ye ewumela libela na libela,
ewumela tango nyonso moyi ekozala,
mpo ete bato bakoma kotangaka kombo na ye
wana bakobanda kopambolanaka,
mpe bikolo nyonso ekoma kobengaka ye :
moto ya esengo.
 
 
18 Tika ete Yawe Nzambe
oyo asalaka Ye moko bikamwa,
Nzambe ya Isalaele, apambolama !
19 Tika ete Kombo na Ye ya nkembo
epambolama libela na libela !
Tika ete mokili mobimba etonda na nkembo na Ye !
Amen ! Amen !
20 Mabondeli ya Davidi, mwana mobali ya Izayi, esuki awa.