Nzembo 78
Misala ya Nzambe
Nzembo ya Azafi.
Bino, bato na ngai, boyoka malako na ngai !
Bopesa matoyi na maloba ya monoko na ngai !
Nakofungola monoko na ngai mpo na lisese,
nakosakola makambo oyo ebombama
wuta na tango ya kala.
Makambo oyo toyoka, oyo toyebi,
oyo batata na biso bayebisa biso.
Tokobombela yango bakitani na bango te,
kasi tokoloba na bikeke oyo ekoya na sima
nkembo ya masanzoli ya Yawe,
nguya na Ye mpe bikamwa oyo asalaki.
 
Apesaki malako mpo na bolamu ya Jakobi,
atiaki mibeko kati na Isalaele,
apesaki mitindo epai ya batata na biso
ete bateya yango epai ya bana mibali na bango,
mpo ete bikeke oyo ekoya sima eyeba yango,
ekeke ya bana oyo bakobotama.
Tika ete batelema mpe bayebisa yango
na bana na bango,
mpo ete batonga elikya na bango kati na Nzambe,
babosana te misala ya Nzambe
mpe babatela mibeko na Ye.
Boye, bakozala te lokola bakoko na bango,
oyo bazalaki mito makasi mpe batomboki,
oyo mitema na bango ezalaki sembo te na miso ya Nzambe,
mpe milimo na bango ezangaki boyengebene epai na Ye.
 
Bato ya libota ya Efrayimi basimbaki batolotolo,
kasi na mokolo ya etumba, bakimaki.
10 Babatelaki te Boyokani ya Nzambe
mpe baboyaki kotosa mibeko na Ye ;
11 babosanaki bikamwa na Ye
mpe makambo minene oyo atalisaki bango.
12 Na miso ya bakoko na bango,
asalaki bikamwa kati na Ejipito,
na etuka ya Tsoani ;
13 akabolaki ebale monene mpo na kolekisa bango,
atelemisaki mayi lokola mir.
14 Na moyi, azalaki kotambolisa bango
na nzela ya lipata ;
mpe na butu, na nzela ya pole ya moto.
15 Apasolaki mabanga kati na esobe
mpe amelisaki bango mayi ebele,
lokola mayi ya bibale ;
16 abimisaki mayi wuta na libanga
mpe asalaki ete etiola lokola mayi ya ebale.
 
17 Kasi bakobaki kaka kosala masumu liboso na Ye,
kotombokela Ye-Oyo-Aleki-Likolo, kati na esobe.
18 Bamekaki Nzambe na nko,
na kosenga bilei kolanda posa na bango.
 
19 Balobaki mabe na tina na Nzambe :
« Boni, Ye Nzambe azali penza na makoki
ya kopesa biso bilei kati na esobe ?
20 Solo, abetaki libanga,
mayi ebimaki, mpe ebimaki penza ebele.
Boni, akokoka lisusu kopesa biso mapa
to misuni epai ya bato na Ye ? »
 
21 Tango Yawe ayokaki bongo,
asilikaki makasi ;
moto na Ye epelelaki Jakobi,
mpe kanda makasi na Ye ekitelaki Isalaele,
22 pamba te batiaki elikya na Nzambe te,
bandimaki te ete akoki kokangola bango.
 
23 Nzokande, apesaki mitindo na mapata
mpe afungolaki bikuke ya likolo,
24 anokiselaki bango mana lokola mvula
mpo na kopesa bilei,
apesaki bango ble ya Likolo.
25 Moko na moko aliaki mapa ya ba-anjelu.
Atindelaki bango bilei ebele penza.
26 Wuta na likolo, atindikaki mosika mopepe ya Este ;
mpe na nguya na Ye, amemaki mopepe ya Sude.
27 Anokiselaki bango misuni lokola putulu,
bandeke ebele lokola zelo ya ebale monene ;
28 akweyiselaki bango yango kati na molako na bango,
zingazinga ya bandako na bango ya kapo.
29 Baliaki mpe batondaki makasi ;
Nzambe apesaki bango biloko
oyo bazalaki na yango posa.
30 Liboso ete posa na bango ekoka,
wana bazalaki nanu na minoko etonda na bilei,
31 kanda ya Nzambe ekweyelaki bango,
abomaki bato minene kati na bango,
anyokolaki bilenge ya Isalaele.
 
32 Kasi atako bongo, bakobaki kaka kosala masumu,
bandimaki kaka te bikamwa na Ye.
33 Boye, asukisaki mikolo ya bomoi na bango
lokola mopepe,
mpe mibu na bango ya mbotama kati na somo.
 
34 Tango nyonso Nzambe azalaki koboma bango,
bazalaki koluka Ye ;
bazalaki komizongisa noki epai na Ye.
35 Bazalaki kozongisa na makanisi na bango
ete Nzambe nde azali Libanga na bango,
ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo azali
Mosikoli na bango.
36 Kasi bazalaki koloba lokuta,
minoko na bango ezalaki kokosa Ye ;
37 mitema na bango ezalaki sembo te
na miso na Ye,
mpe bazalaki kobuka Boyokani na Ye.
 
38 Nzokande Ye, na mawa na Ye,
azalaki kolimbisa mabe na bango
na esika ya kobebisa bango ;
mbala mingi, azalaki kokanga motema
na esika ya kopelisela bango kanda na Ye ;
39 pamba te azalaki koyeba ete bazali kaka bato,
bazali kaka lokola mopepe oyo ezali koleka
mpe ekozonga lisusu te.
 
40 Mbala mingi, batombokelaki Ye kati na esobe
mpe bayokisaki Ye mawa kati na bisika ya kokawuka ;
41 bazalaki kozongela komeka Nzambe,
koyokisa Mosantu ya Isalaele mawa.
 
42 Babosanaki makambo minene oyo asalaki
na nguya na Ye,
mokolo oyo akangolaki bango
wuta na maboko ya monyokoli ;
43 babosanaki bikamwa oyo asalaki kati na Ejipito,
misala minene oyo asalaki kati na etuka ya Tsoani.
44 Abongolaki bibale na bango makila ;
boye, bakokaki lisusu te komela na mayi na bango.
45 Atindelaki bango banzinzi oyo eswaka,
mpe eliaki bango ;
mpe magorodo oyo ebebisaki bango.
 
46 Akabaki bambuma ya bilanga na bango
epai ya mabanki,
mpe mbuma ya mosala na bango epai ya mankoko.
47 Abebisaki bilanga na bango ya vino
na nzela ya mvula ya mabanga,
mpe banzete na bango ya sikomori
na nzela ya mvula ya pembe ;
48 akabaki bameme na bango
epai ya mvula ya mabanga,
mpe bibwele na bango epai ya kake.
 
49 Atindelaki bango kanda na Ye ya makasi lokola moto :
kanda makasi, kotomboka, pasi
mpe ba-anjelu oyo babebisaka.
50 Apesaki na kanda na Ye nzela ya kopela,
abatelaki bango te na kufa ;
kasi akabaki bango na bokono oyo ebomaka.
51 Abomaki bana mibali nyonso ya liboso
kati na Ejipito,
bambuma ya liboso ya makasi na bango
na se ya bandako ya kapo ya Cham.
 
52 Abimisaki bato na Ye lokola etonga,
amemaki bango kati na esobe lokola meme ;
53 atambolisaki bango na kimia penza,
babangaki eloko te ;
mpe ebale monene emelaki banguna na bango.
 
54 Amemaki bango na mokili na Ye ya bule,
na ngomba oyo loboko na Ye ya nguya ezwaki ;
55 abenganaki bikolo liboso na bango,
apesaki bango etando lokola libula
mpe avandisaki mabota ya Isalaele
kati na bandako na bango ya kapo.
 
56 Kasi bamekaki Nzambe,
batombokelaki Ye-Oyo-Aleki-Likolo
mpe babatelaki te malako na Ye ;
57 bapengwaki mpe babukaki mibeko ya boyokani,
ndenge batata na bango basalaki ;
batengamaki lokola tolotolo
oyo mbanzi na yango ekeyi na mopanzi ;
58 bayokisaki Ye kanda na nzela ya
bisambelo na bango ya likolo ya bangomba,
mpe bapelisaki zuwa na Ye na nzela ya
banzambe na bango ya bikeko.
 
59 Nzambe ayokaki mpe asilikaki makasi,
abwakaki Isalaele mobimba ;
60 asundolaki Mongombo ya Silo,
ndako ya kapo oyo atelemisaki kati na bato,
61 akabaki nguya na Ye na bowumbu,
mpe lokumu na Ye na maboko ya monguna ;
62 akabaki bato na Ye na mopanga,
mpe asilikelaki libula na Ye.
63 Moto etumbaki bilenge mibali,
mpe banzembo ya libala eyembamaki lisusu te
mpo na lokumu ya bilenge basi.
64 Banganga-Nzambe bakufaki na mopanga,
mpe basi oyo bakufisaki mibali
balelaki te na banzembo ya matanga.
 
65 Nkolo alamukaki lokola moto oyo
awuti na pongi,
lokola moto oyo abimi na kwiti ya vino ;
66 azokisaki banguna na Ye na sima,
wana bazalaki kokima,
ayokisaki bango soni ya libela.
 
67 Asundolaki bandako ya kapo ya Jozefi
mpe aboyaki kopona libota ya Efrayimi ;
68 kasi aponaki libota ya Yuda,
ngomba Siona oyo alingaki ;
69 atongaki Esika na Ye ya bule
lokola bisika ya likolo makasi,
lokola mabele oyo atia mpo na libela.
 
70 Aponaki Davidi, mosali na Ye,
mpe azwaki ye kati na lopango ya meme ;
71 abengaki ye wuta na sima ya meme oyo
azalaki kobatela
mpo na kokomisa Ye mobateli ya Jakobi, bato na Ye,
mpe ya Isalaele, libula na Ye.
72 Davidi abatelaki bango na motema ezanga pamela,
mpe akambaki bango na maboko ya mayele.