Nzembo 79
Yelusalemi epanzani
Nzembo ya Azafi.
Oh Nzambe, tala ndenge bato ya bikolo ya bapaya
bakoti na makasi kati na libula na Yo,
bakomisi Esika na Yo ya bule mbindo,
mpe bakomisi Yelusalemi mipiku ya mabanga !
Bapesi bibembe ya basali na Yo lokola bilei
epai ya bandeke ya likolo,
mpe bibembe ya bayengebene na Yo
epai ya banyama ya zamba ;
basopi makila na bango lokola mayi
zingazinga ya Yelusalemi,
mpe moto ya kokunda bango azalaki te !
 
Tala ndenge bato ya bikolo oyo ezingeli biso
bazali kofinga biso,
mpe tokomi lokola eloko ya liseki
na miso na bango !
Kino tango nini, Yawe,
okokangela biso kanda ?
Kino tango nini zuwa na Yo ekopela lokola moto ?
 
Sopela bikolo oyo eyebi Yo te
mpe mikili oyo ebelelaka Kombo na Yo te,
kanda makasi na Yo ;
pamba te babebisi Jakobi
mpe bapanzi mokili na ye.
 
Kotangela biso te masumu na biso ya kala,
kokangela biso motema te, yokela biso mawa,
pamba te tokomi na suka !
Nzambe Mobikisi na biso, sunga biso
mpo na lokumu ya Kombo na Yo,
kangola biso mpe limbisa masumu na biso
mpo na Kombo na Yo !
 
10 Mpo na nini bikolo eloba :
« Nzambe na bango azali wapi ? »
Tika ete, na miso na biso, bato ya bikolo bayeba
ete ozongiseli bango mabe na mabe,
mpo na makila ya basali na Yo, oyo basopaki.
 
11 Tika ete kolela ya bakangami kati na boloko
ekoma liboso na Yo !
Na nguya monene na Yo,
bikisa ba-oyo bazwa etumbu ya kufa !
12 Oh Nkolo, zongisela bikolo
oyo ezingeli biso,
kotiola oyo batiolaki Yo ;
zongisela bango mbala sambo.
13 Mpe biso, bato na Yo, etonga oyo oleisaka,
tokosanzola Yo tango nyonso ;
mpe na bikeke nyonso,
tokosakola lokumu na Yo.