Nzembo 80
Eh Yawe, kino tango nini ?
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Ezali ya koyemba lokola « Lisi ya Mobeko. » Litatoli. Nzembo ya Azafi.
Mobateli ya Isalaele,
Yo oyo otambolisaka Jozefi
lokola etonga ya bameme, yoka ;
Yo oyo Kiti ya Bokonzi na Yo ezali
kati na basheribe, mimonisa
liboso ya Efrayimi, ya Benjame
mpe ya Manase.
Monisa nguya na Yo
mpe yaka kobikisa biso !
 
Oh Nzambe, sala ete tozongela ndenge tozalaki,
ngengisela biso elongi na Yo mpo ete tobika.
 
Eh Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,
kino tango nini okotombokela
mabondeli ya bato na Yo ?
Oleisaki bango lipa esangana na mayi ya miso
mpe olangwisaki bango na kopo
etonda na mpinzoli ;
okomisaki biso eloko ya kotiola
mpo na bazalani na biso,
mpe banguna na biso bakomi kotiola biso.
 
Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,
sala ete tozongela ndenge tozalaki,
ngengisela biso elongi na Yo
mpo ete tobika.
 
Nzete ya vino oyo opikolaki wuta na Ejipito,
olonaki yango wana obenganaki bikolo ebele.
10 Obongiselaki yango mabele
mpo ete ezwa misisa mpe etondisa mokili.
11 Elili na yango ezipaki bangomba,
bitape na yango ezalaki
lokola banzete minene ya sedele.
12 Epanzaki bitape na yango kino na ebale monene,
mpe mito na yango ya sika kino na ebale.
 
13 Mpo na nini otoboli madusu
kati na bamir na yango ?
Tala ndenge baleki nzela bazali kobuka
bambuma na yango !
14 Ngulu ya zamba ezali kobebisa yango,
mpe nyama ya zamba ezali kolia yango.
15 Zongela biso lisusu,
Nzambe-Na-Nguya-Nyonso !
Wuta na likolo, tala mpe mona !
Senzela mpo na nzete oyo ya vino !
16 Batela nzete oyo loboko na Yo ya mobali elonaki,
batela solo mwana oyo Yo moko obokolaki.
 
17 Bakati nzete na Yo ya vino
mpe batumbi yango na moto ;
tika ete bakufa na pamela ya elongi na Yo !
18 Tika ete loboko na Yo ezala na likolo ya mokonzi
oyo avandi na ngambo ya loboko na Yo ya mobali,
mpe na likolo ya mwana na moto
oyo Yo moko okomisaki makasi.
19 Boye, tokozala lisusu mosika na Yo te ;
zongisela biso lisusu bomoi,
mpe tokobelela Kombo na Yo.
 
20 Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,
sala ete tozongela ndenge tozalaki,
ngengisela biso elongi na Yo mpo ete tobika.