Nzembo 81
Soki bato na ngai bazalaki koyokela ngai…
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Azafi. Ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati.
Boganga na esengo
epai ya Nzambe, makasi na biso !
Bobetela Nzambe ya Jakobi maboko !
Boyemba banzembo, bobeta bambunda mike,
lindanda oyo ebimisaka lokito kitoko mpe nzenze !
Bobeta kelelo na ebandeli ya sanza,
na tango oyo sanza mobimba engengaka,
mpo na mokolo ya feti na biso !
 
Pamba te ezali mobeko mpo na Isalaele,
mpe mokano ya Nzambe ya Jakobi.
Atiaki yango lokola mobeko mpo na Jozefi
tango abundisaki Ejipito.
 
Nazali koyoka lokota oyo nayebi te :
« Nalongolaki mokumba
oyo ezalaki na mapeka na ye,
mpe maboko na ye elongwaki
na bowumbu ya kosimba bitunga. »
Tango ozalaki koganga mpo na pasi,
nakangolaki yo,
nayanolaki yo kati na kake
epai wapi nabombamaki,
namekaki yo pembeni ya mayi ya Meriba.
 
Bato na ngai, boyoka ngai !
Mpe nakokebisa bino.
Ah Isalaele, soki kaka ozalaki koyokela ngai !
10 Okozala na nzambe ya mopaya te kati na yo,
okogumbamela nzambe mosusu te,
longola kaka ngai !
11 Nazali Yawe, Nzambe na yo,
oyo abimisaki yo na Ejipito ;
fungola malamu monoko na yo,
mpe nakotondisa yango.
 
12 Kasi bato na ngai bayokaki mongongo na ngai te,
Isalaele aboyaki kotosa ngai.
13 Mpo na yango, natikaki bango kotambola
kolanda baposa ya mitema makasi na bango ;
mpe balandaki makanisi na bango.
14 Soki bato na ngai bazalaki koyokela ngai,
soki Isalaele azalaki kolanda banzela na ngai,
15 nalingaki mbala moko koyokisa
banguna na bango soni
mpe kobundisa bayini na bango.
16 Mpe bato oyo bayinaka Yawe
balingaki komikitisa liboso na Ye,
mpe etumbu na bango elingaki kowumela
mpo na libela.
17 Yawe alingaki koleisa Isalaele
bilei ya kitoko
mpe kotondisa bango na mafuta ya nzoyi.