9
Kosambisama ya banguna ya Isalaele
Liloba na Yawe.
Liloba na Yawe ekomi na mokili ya Adraki,
ekowumela na engumba Damasi,
pamba te miso ya bato mpe ya mabota nyonso ya Isalaele
ezali kotalela Yawe.
Tala, ekowumela lisusu likolo ya engumba Amati,
na mondelo oyo ekabola yango na engumba Damasi,
na engumba Tiri mpe Sidoni, atako baleki mayele.
Engumba Tiri emitongeli yango moko ndako makasi,
emibombeli palata ebele lokola putulu
mpe wolo ebele lokola potopoto ya balabala.
Kasi Nkolo akobotola yango,
akosukisa nguya na yango na ebale monene
mpe ekozika na moto.
Engumba Ashikeloni ekomona yango mpe ekokoma kolenga ;
engumba Gaza ekokoma na somo makasi,
ndenge moko mpe engumba Ekroni ;
pamba te elikya na yango ekosila.
Engumba Gaza ekozangela mokonzi na yango
mpe engumba Asikaloni ekotikala lisusu na bato te.
Bana makangu bakoya kovanda na engumba Asidodi,
mpe nakosilisa lolendo ya bato ya Filisitia.
Nakolongola makila na minoko na bango,
mpe bilei ya mbindo na minu na bango ;
kasi ba-oyo bakotikala bakokoma
bato ya Nzambe na biso mpe bakambi ya Yuda ;
mpe bato ya engumba Ekroni bakokoma
lokola bato ya Yebusi.
Nakobundela ndako na Ngai
liboso ya mampinga ya basoda ya nguya ;
monyokoli moko te akoya lisusu komonisa bato na Ngai pasi,
pamba te Ngai moko nde nazali kokengela sik’oyo.
Koya ya mokonzi ya kimia
Siona, mboka kitoko, sepela, sepela penza makasi !
Yelusalemi, mboka kitoko,
ganga penza na esengo !
Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo,
azali sembo mpe molongi,
atonda na komikitisa, avandi na likolo ya ane,
na likolo ya mwana ya ane, mwana ya ane ya mwasi.
10 Nakolongola bashar ya bitumba na mokili ya Efrayimi,
bampunda ya bitumba, na engumba Yelusalemi,
mpe matolotolo ya bitumba ekobukana.
Mokonzi yango akosakola kimia na bikolo nyonso,
bokonzi na ye ekobanda longwa na ebale monene moko kino na mosusu,
longwa na ebale kino na basuka ya mabele.
11 Mpo na yo, likolo ya makila ya boyokani na Ngai elongo na yo,
nakobimisa bakangami na yo na libulu oyo ezanga mayi.
12 Bozonga na ndako na bino, oyo batonga makasi,
bino bakangami oyo botondi na elikya,
pamba te nazali koloba na bino sik’oyo :
« Nakozongisela bino mbala mibale
biloko oyo bobungisaki. »
13 Pamba te nabendi tolotolo na Ngai, oyo ezali Yuda,
natie yango likonga na Ngai ya moke oyo ezali Efrayimi.
Siona, nakotelemisa bana na yo ya mibali
mpo ete batelemela bana mibali ya Yavani
mpe nakokomisa yo lokola mopanga ya elombe.
14 Yawe akomimonisa epai na bango,
mpe tolotolo na Ye ekobima lokola mokalikali.
Nkolo Yawe akobeta kelelo
mpe akotambola kati na mopepe makasi.
15 Yawe, Mokonzi ya mampinga, akobatela bango.
Bakolia mpe bakobuka mabanga ya ebambelo mabanga,
bakomela mpe bakosala makelele lokola bato balangwe masanga,
bakotonda lokola kopo ya makila
oyo basopaka na basonge ya etumbelo.
16 Na mokolo wana, Yawe, Nzambe na bango,
akobikisa bango
ndenge mobateli bibwele abikisaka bameme na ye.
Bakongenga makasi kati na mabele na Ye
lokola mabanga ya talo.
17 Bakozala bato ya esengo,
bakokoma kitoko makasi.
Ble ekopesa bilenge mibali makasi
mpe vino ya sika ekopesa bilenge basi makasi.